2 John

Ebandeli ya mokanda

1Ngai Mpaka, natindi mokanda oyo epai ya Mama oyo Nzambe apona mpe epai ya bana na ye, baoyo nalingaka kati na bosolo. Ezali kaka ngai moko te nde nalingaki bino, kasi na baoyo nyonso mpe bayebi bosolo, 2mpo na bosolo oyo evandi kati na biso mpe oyo ekozala libela elongo na biso.

3Tika ete ngolu, mawa mpe kimia oyo ewutaka na Nzambe Tata mpe oyo ewutaka na Yesu Kristo, Mwana ya Tata, ezala elongo na biso kati na solo mpe na bolingo.

Mobeko mpo na bolingo

4Nazali na esengo mingi penza mpo na komona ete bana na yo bazali kotambola kati na solo ndenge penza Tata atindaki biso.

5Mpe sikʼoyo, Mama, nazali kokomela yo mobeko ya sika te, kasi oyo tozali na yango banda na ebandeli. Nasengi ete tolingana moko na moko. 6Mpe bolingo ezali kosenga boye : totambola kati na kotosa Mibeko na ye. Ndenge boyokaki yango banda na ebandeli, mobeko na ye ezali ete botambola kati na bolingo.

Totelema kati ya mateya ya Kristo

7Bato mingi ya lokuta, baoyo bandimaka te ete Yesu Kristo ayaki na nzoto, basiʼbabimi kati na mokili. Moto ya ndenge wana azali moto ya lokuta mpe monguna ya Kristo.

8Bomibatela bino moko, mpo ete bobungisa te mbuma ya mosala na bino ; kasi bokoka kozwa lifuti ya mobimba. 9Moto nyonso oyo atelemi te kati na mateya ya Kristo, mpe akeyi mosika koleka mateya yango, azali lisanga na Nzambe te. Moto oyo avandi kati na mateya yango, azali lisanga na Tata mpe na Mwana.

10Soki moto aye epai na bino mpe aye na mateya oyo te, boyamba ye na ndako na bino te mpe bopesa ye mbote te. 11Moto oyo akopesa ye mbote, akosangana na misala na ye ya mabe oyo asalaka.

Likanisi ya koya kotala bino

12Nazali na makambo mingi mpo na kokomela bino, kasi nalingi kokoma yango te na papie mpe na mayi ya biki. Kasi nazali na elikya mpo na koya kotala bino mpe kosolola na bino ngai moko, mpo ete esengo na bisoezala ya kokoka.

Mbote ya suka

13Bana ya ndeko na yo ya mwasi oyo Nzambe apona batindeli yo mbote.
Copyright information for LinMNB